Luke 20

Bokonzi ya Yesu endimami te

(Mt. 21.23-27 ; Mk. 11.27-33)

1Mokolo moko, tango Yesu azalaki koteya bato na lopango ya Ndako ya Nzambe mpe azalaki kosakola Sango Malamu, bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bayaki epai na ye elongo na bampaka. 2Batunaki ye :

—Yebisa biso, ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini ? Nani apesi yo bokonzi yango ?

3Yesu azongiselaki bango :

—Ngai mpe nakotuna bino motuna moko. Boyebisa ngai,
4nani apesaki Jean ndingisa mpo na kobatisa ? Nzambe to bato ?

5Babandaki kokanisa bango na bango mpe balobaki : Soki tolobi “Nzambe”, ye akotuna biso : bongo mpo na nini bondimelaki ye te ? 6Soki mpe tolobi : “Bato”, bato nyonso bakoboma biso na mabanga pamba te bato nyonso bandimaka ete Jean azalaki moprofeta. 7Bongo bazongisaki : “Toyebi te soki nani apesaki ye ndingisa yango !” 8Yesu mpe azongiselaki bango :

—Ngai mpe nakoyebisa bino te soki na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo !

Lisapo ya basali mabe ya elanga ya vino

(Mt. 21.33-46 ; Mk. 12.1-12)

9Bongo Yesu abandaki koyebisa bato lisapo oyo :

—Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango na maboko ya basali ya elanga mpo bafutela, bongo akendaki mobembo mpo na tango molayi.
10Na tango ya kobuka mbuma, atindaki mosali na ye epai ya bafuteli ya elanga mpo bapesa ye ndambo ya mbuma ya vino. Kasi bafuteli ya elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. 11Nkolo ya elanga atindaki lisusu mosali mosusu. Kasi ye mpe babetaki ye, bafingaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. 12Bongo atindaki lisusu mosali ya misato. Ye mpe bazokisaki ye mpe babwakaki ye libanda ya elanga.

13Bongo nkolo ya elanga ya vino alobaki : Nakosala nini ? Nakotinda mwana na ngai ya bolingo ; mpe nakanisi ete bakotosa ye !

14Kasi tango bafuteli ya elanga bamonaki ye, balobanaki bango na bango : “Tala oyo akokoma nkolo ya elanga, toboma ye mpo ete elanga ekoma ya biso.”

15Bongo bamemaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye. Bongo nkolo ya elanga ya vino akosala bango nini ? 16Akoya, akoboma bafuteli wana ya elanga mpe akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki :

—Tika ete yango esalama te !

17Kasi Yesu atalaki bango mpe atunaki :

—Bongo makambo oyo ekomama elingi koloba nini : Libanga oyo batongi na ndako babwakaki,
ekomi libanga ya songe ya ndako ;
oyo esimbi ndako mobimba

18 Moto oyo akokweya likolo ya libanga yango,
akobukana ;
kasi oyo libanga yango ekokweyila ye,
yango ekopanza ye !

19Kaka na tango wana, balakisi ya Mibeko mpe bakonzi ya banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te, bayebaki ete alobaki lisapo wana mpo na bango. Kasi babangaki bato.

Eyano ya Yesu mpo na mpako ya Sezare

(Mt. 22.15-22 ; Mk. 12.13-17)

20Bazalaki kokengela ye mpe batindaki bato na mayele oyo bazalaki komilakisa lokola bato na sembo, mpo bakanga ye na maloba oyo akoloba mpe bapesa ye na maboko ya bazuzi mpe ya moyangeli.

21Bato yango batunaki ye :

—Moteyi, toyeti ete olobaka mpe oteyaka na bosembo nyonso ; otalaka bilongi ya bato te, kasi oteyaka nzela ya Nzambe na bosolo nyonso.
22Boni, tozali na ndingisa mpo na kofuta mpako na Sezare to te ?

23Kasi Yesu asosolaki mayele na bango ya mabe, mpe alobaki na bango :

24—Bolakisa ngai deni moko ; yango ezali na elongi mpe makomi ya nani ? Bazongiselaki ye :

—Ya Sezare !
25Bongo Yesu alobaki na bango :

—Bopesa na Sezare oyo ezali ya Sezare mpe na Nzambe oyo ezali ya Nzambe !

26Bakokaki te kokanga ye na maloba na ye liboso ya bato ; bakamwaki mingi mpo na eyano na ye, mpe bavandaki nyee.

Eyano ya Yesu mpo na lisekwa

(Mt. 22.23-33 ; Mk. 12.18-27)

27Ndambo ya baseduseoo, baoyo bazalaki kondima te ete lisekwa ezali, bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye motuna oyo : 28—Moteyi, Moyize akomelaki biso boye : soki moto moko akufi, azalaki na mwasi, mpe atiki bana te, ndeko na ye asengeli kozwa mwasi wana na libala mpo abotela ndeko na ye oyo akufi bana. 29Nzokande, ezalaki na bandeko mibali sambo. Oyo ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki, kasi atikaki bana te. 30Oyo ya mibale, 31mpe oyo ya misato babalaki ye mpe. Esalamaki bongo na bango nyonso sambo : bakufaki mpe batikaki bana te. 32Suka na yango, mwasi mpe akufaki. 33Bongo na mokolo ya lisekwa, mwasi wana akozala ya nani na kati na bango nyonso ? Pamba te bango nyonso sambo babalaki ye.

34Bongo Yesu azongiselaki bango :

—Ezali bato ya mokili oyo nde babalaka mpe babalisaka.
35Kasi baoyo bakomonana ete bazali ya kokoka mpo na kozwa esika na mokili wana mpe kosekwa kati na bakufi, bango bakobala te, bakobalisa te, 36mpe bakokufa te ; pamba te bakozala lokola baanzelu. Bakozala bana ya Nzambe, mpo bakosekwa kati na bakufi. 37Mpo na likambo etali kosekwa ya bato bakufa, Moyize ye moko alakisaki yango tango alobelaki likambo ya nzete oyo ezalaki kopela moto, pamba te abengaki Nkolo : Nzambe ya Abraham, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Zakobi. 38Ye azali Nzambe ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi ; pamba te mpo na Nzambe, bato nyonso bazali na bomoi !

39Bongo balakisi mosusu ya Mibeko bozongisaki :

—Moteyi, olobi malamu.

40Bongo moto ata moko te amekaki lisusu kotuna ye mituna.

Eyano ya Yesu mpo na bomoto ya Kristo

(Mt. 22.41-46 ; Mk. 12.35-37)

41Bongo Yesu alobaki na bango :

—Mpo na nini balobaka ete Kristo azali mwana ya David ?
42Pamba te David ye moko alobaki boye na Buku ya Banzembo : Nkolo alobaki na Nkolo na ngai :
vanda na loboko na ngai ya mobali,

43 kino nakokomisa banguna na yo
eniatelo ya makolo na yo.

44David azalaki kobenga ye Nkolo ; bongo ndenge nini akoki kozala lisusu mwana na ye ?

Yesu apameli balakisi ya Mibeko

(Mt. 23.6 ; Mk. 12.38-40)

45Awa bato bazalaki koyoka ye, alobaki na bayekoli na ye :

46—Bokeba na balakisi ya Mibeko, bango balingaka kotambola na banzambala ya milayi, mpe bapesa bango bambote na bazando. Balingaka mpe kovanda na bisika ya lokumu na bandako ya mayangani, mpe na bisika ya kitoko na bafeti. 47Babotolaka biloko ya basi oyo bakufela mibali, mpe mpo na kokosana, basalaka mabondeli ya milayi-milayi. Etumbu na bango ekozala makasi penza !
Copyright information for LinMNB